Moïse Tshombe
Moto ya politiki wa Congo / From Wikipedia, the free encyclopedia
Moïse Kapend Tshombe (* mwa 10, sánzá ya zómi,1919 na Musumba; † mwa 29, sánzá ya motóbá, 1969 na Alje) abótámí na mbóka Musumba, mbóka-mokonzi ya kala ya empire Lunda, na Territoire ya Sandoa na etúká ya Katanga, Azalí Molunda (Aruund). Abálákí mwǎna ya Mwantyaav Lunda. Moïse Tshombe atángí na école missionaires Methodists Américan. Ntángo asílísí kúná, tatá na yě alingákí atínda yě na Bɛ́lɛjika ákɛndɛ kosála kelási kúná, kasi bamindɛ́lɛ́ babóyákí. Akóbí na mayékoli ya botángi-mbɔ́ngɔ mpé bobɛti-ekembé. Nsima ya kelási na yě ayéí kokobanda na mombɔ́ngɔ na bolandi lokolo ya tatá na bokambi ya magazíni ebelé atíkákí. Bandá 1950 tíí 1957 yě azalákí motɛ́kisi mopáo mpé ayéí kopɔnɔmɔ membre ya conseil provincial ya Katanga. Akómákí lisúsu mokonzi wa Association de Classe Moyenne Africaine.